Ngai MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na zali ENVOYE SPECIAL ya SIMON - TopicsExpress



          

Ngai MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na zali ENVOYE SPECIAL ya SIMON KIMBANGU na kati ya mokili oyo ya solo na Doctrine ya SAINT ESPRIT ya KINTUADI = ( Eglise Universelle du Royaume de Dieu ).bandeko Doctrine ya SAINT ESPRIT ya KINTUADI yango kaka ezalaki na Seigneur JESUS CHRIST.le 7.9.2004 ezali mukolo Seigneur JESUS CHRIST atalisaki ngai na Ciel le SAINT ESPRIT KIMBANGU oyo alakaki biso na kati ya Bible na kombo ya ESPRIT de VERITE de DIEU, Jean 14:15-17.26.15:26.16:12-15.. Soki omoni Seigneur JESUS CHRIST na mabondeli senga malamu na motema ya kofonguama okoya komona na molimo SIMON KIMBANGU yende akotangisa yo Verite ya SAINT ESPRIT ya Doctrine ya KINTUADI = ( Eglise Universelle du Royaume de Dieu ).Doctrine ya KINTUADI na Ciel esika bakomaki kombo nanga MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na mbuku ya KIMBANGU ,sima ba anges Bazali ko Glorifie kombo ya Seigneur JESUS CHRIST na koyemba ba nzembo,Luc 10:17-24. bango mibale bazali ba Doctrine moko basalaka mosala ya Nzambe. kasi na photo bozali komona mondele,kasi na molimo batalisaka ngai MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na oyo na monaka JESUS CHRIST na maman naye MARIE na MOISE na lisusu Prophete Elie bazali na loposo ya bayindo. tokoki kosakola kombo ya Nzambe ndenge tolingi , na lisusu bokoki kotangisa bato monene ya Nzambe naya bakoko na biso. kasi verite bayebaka yango kati ya mabondeli na molimo kaka Nzambe mutu akoya kotangisa yo solo ya Seigneur JESUS CHRIST na lisusu ya le SAINT ESPRIT KIMBANGU na kati ya Vision na Songe tango ozali ya kolala,lisusu pona omona Verite oyo malamu esengeli ozua nano Bapteme ewuti na Ciel na Lumuiere na lisusu Tonnerre ekiteli yo na nzoto ,na koyoka VOIX bazali koloba ozali muana nanga na zali kopesa yo Bapteme ya SAINT ESPRIT ,Apoc 4:5. na kotia Sceau de Dieu na Front ya mutu nayo kowuta na Ciel ya Rayon ya Feu,Apoc 7:3. ngai MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na zua Bapteme kowuta na Ciel na Lumiere na Tonnerre na koyoka Voix eye kokita na nzoto ,Na kotianga Sceau de Dieu na Front ya mutu nanga,Na Nuage de Dieu kowuta na Ciel koya kokita na nzoto nanga sima ezongi na likolo, Luc 9:28-36,nde esika ESPRIT de DIEU eyaki kofanda na nzoto nanga pona libela. na komi kobikisa ba malade ya molimo na kombo ya Seigneur JESUS CHRIST kaka ndenge batalisaki ngai na sala misala ya SIMON KIMBANGU na kati ya Vision na Songe.le 30.5.2003 na 27.7.2003 na 28.8.2003. Luc 1:30-45. Math 3:16-17. Jean 1:32-34. 3:1-13. Luc 9:18-20. 20:1-8.Jean 5.1-7.13:1-17. Nombres 12:4-6.lisusu na molimo na zali komema CROIX ya Seigneur JESUS CHRIST na keyi nango na ngomba ya Golgotha makila Nzoto nionso bazali kobeta ngai bafimbu ,bazui ngai babeti basete na maboko na makolo na kotia ngai likonga na mpanzi na lisusu kolatisa ngai COURONNE yaba sende na mutu nanga MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na kati ya mboka Israel. naye kolongua na likolo ya CROIX na ngomba ya Golgotha na mati na Ciel na keyi kokita na Mousole ya SIMON KIMBANGU na kati ya Nkamba na mboka ya Kongo. pona papa DIANGIENDA alobelaki ngai na songe makambo nionso bazali kotangisa yo na molimo okende kotala yango na kati ya Bible nde esika mokili bakoya kondima ozali ENVOYE SPECIAL ya solo ya SIMON KIMBANGU na mokili oyo kasi bato bazali kososola yote. Math 27:32-54. Ndeko toluka verite ya Nzambe na bosolo nionso na kati ya mabondeli na lingomba naye ya solo,Apoc 3:3-12.21:1-5.10-11. toyebaka banda na mbotama ya JESUS CHRIST na suka naye likolo ya CROIX nionso ndenge bakoma na bilembo ya Ciel na Bible yango esalema na nzoto nanga MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na kati ya molimo. ezala pona Kongo na kati ya mabondeli nde tokoyeba president oyo SIMON KIMBANGU akopona pona mabele ya Kongo etelema na kobongisa yango. kasi papa SIMON KIMBANGU apesi biso papa HONORE NGBANDA akendaki kopesa ye na maboko ya papa SIMON KIMBANGU KIANGANI na kati ya Nkamba pona sala mosala ya politique. azui lisusu MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI akeyi kopesa na maboko ya papa SIMON KIMBANGU KIANGANI pona azala pene pene naye basala mosala ya Nzambe kati ya lingomba ya KINTUADI. Na Kongo ya sika papa SIMON KIMBANGU azui president HONORE NGBANDA NZAMBO na MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na kati ya Nkamba apesi bango mibale na maboko ya papa SIMON KIMBANGU KIANGANI bazala na kati ya KINTUADI pene pene naye na kati ya mabele naye. president HONORE NGBANDA MZAMBO na MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI oyo azali ENVOYE SPECIAL ya solo ya SIMON KIMBANGU .pona bandeko mibale oyo baye pona bakokisa Prophetie ya SIMON KIMBANGU ya Mbanza Nsanda ya le 10 Septembre 1921 mokolo ya Samedi, pona kongo ya sika eya kotelema na bosolo nionso.wana ba RESISTANTS ya solo bana bilaka bakokita na kongo pona kotonga mabele na bosolo nionso na MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI na MARIE MUILU KIAWANGA NZITANI elongo na Aeroport ya Ndjili,nde bakokutana na president HONORE NGBANDA NZAMBO na maman MARIE JOSE LINGOMBA na Kinshasa na Kongo ya SIMON KIMBANGU. 1) president HONORE NGBANDA ZAMBO yende Mukonzi ya sika oyo ya Kongo mobimba oyo MFUMU SIMON KIMBANGU awuti kopona na mabele naye pona abongisa na kotelemisa yango ya kitoko nionso ndenge ye azali kosenga. 2) MFUMU ETO KIMBANGU MVULUZI yende azali INCARNATION ya solo ya MFUMU SIMON KIMBANGU oyo azongi na mabele ya Kongo ya sika ,azali Mukonzi ya Nzambe ya Kongo mobimba ya munene le ROI DIVIN oyo bazali kozela na maboko mibale. N.B. tango ekoki pona Verite ya maloba ya MFUMU SIMON KIMBANGU emonana na misu ya papa MFUMU SIMON KIMBANGU KIANGANI na kati ya Nkamba na Kongo mobimba na kombo ya ( Pere,Fils, Saint Esprit ). Amen.... .https://facebook/photo.php?fbid=126546434146711&set=a.106877959446892.9268.100003740653933&type=1&theater
Posted on: Fri, 21 Jun 2013 08:32:24 +0000

Trending Topics



div>
AVAILABLE MAINLAND PROPERTIES FOR SALES: ONE [1] ACRE OF LAND

Recently Viewed Topics




© 2015